Tozali kotelemela bato bawuti na bikolo oyo ekeseni

Bato oyo bazali kofanda na Maine, ato ko bazali koloba lokota la lingelesa te, bazali na boyei bolamu epayi na biso

Na ba Nzinga ya Batelemeli Mibeko ya Joe Bornstein, tozali na esengo mingi ya kosalisa bato ya Maine oyo bazali na likama la bozoki to la bokono, mpe bato oyo bakoki kosala mosala te mpo na makama wana, oyo nyonso bafandi na biteni nyonso ya Maine - ata ko ofandi na Maine bomoyi nayo mobimba, to osili kokoma sika awa na maine. Na ba nzinga na biso motoba oyo epalangani bipayi binso awa na Maine, mpona ete mobeko mozala obele ndenge moko liboso ya bato nyonso, wana nde ezali eloko na biso ya liboso na manso oyo tozali kosala.

Kala penza mingi liboso ete Maine ebotama na mbula 1820, bapaya ya liboso penza bayaki kofanda na mboka na biso ya kitoko. Mpe bato ya sika ya ndenge na ndenge bakobaki koya kofanda awa na Maine. Na mbula 1820, ba koko ya Joe batikaki mboka na bango Latvia, mpe bayaki kofanda na Maine. Libota ya Joe ewutaki Latvia na elikya ya bozui bomoyi bolamu na Amerika. Mokano ya Libota ya Joe ekokisamaki awa na Maine, mpe ti lelo, ezali kokoba na kokokisama sima ya bobotami ya ba nkoko motoba.

Lelo, Maine ezali kokoba na koyamba bapaya ya bikolo ya ndenge na ndenge mpe oyo bazali koloba makota ya ndenge na ndenge. Na ba mbula 48, ba Nzinga ya Batelemeli Mibeko ya Joe Bornstein basi batelemeli liboso ya mobeko batu ya Maine oyo baleki 24.000,  oyo bazali na bofandi mpe makoki ya bokeseni, mpe bawuta na bikolo ya ndenge na ndenge. 10 Batelemeli Mibeko ya Joe, elongo na 40 basalisi na bango na makambo oyo etali kotelemela mibeko, bango nyonso bafandaka mpe basalaka musala na bango nakati ya mangomba ya batu oyo bafandi awa.

Soki yo (to mutu moko olingaka mingi) ozokaki mpo ete moto mosusu asalaki angele te, to mpona eloko mosusu, soki mpe okoki kosala mosala te mpo na bozoki, ebongi osalisama na ndenge  oyo mobeko mosengi, ata ko ozali moto ya ekolo mosusu to mpe ewuta epayi mosusu. Nzinga na biso ya Batelemeli Mibeko ezali awa mpo na kosalisa yo na biteni nyonso ya kotelema liboso ya mobeko. Soki lingelesa ezali lokota ya mbotama nayo te, tokosalisa yo na bobaloli mpe bolimboleli. Luka okutana na biso lelo mpo ete totala ndenge nini tokoki kosalisa yo. Ekosenga ata lifuta ya bongo yoko te, mpe ekolobama epayi ya moto moko te.

Libota ya Joe eyaki awa na Amerika koluka bobongisi ya bomoyi ya ba nkoko na bango. Oyo wana nde ezali eloko nzinga na ngayi ezali kolanda. Tozali batelemeli ya mibeko ya awa na Maine, tosalaka mosala mpona bato nyonso ya Maine wuta mbula 1974.